Prophète - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia - batunaki ye na ntina ya kondima pe alobi :(Kondimela Nzambe, na ba anzelu na Ye, na mikanda na Ye, na bamemi-nsango na Ye, mpe Mokolo ya Nsuka, na kondima destin, bolamu na yango mpe mabe na yango).
Makonzí ya kondima ezali misala ya losambo oyo ezali na mokumba mpo na musulman nyonso, mpe Islam ya moto ezali na ntina te soki andimi yango te, yango wana babengaka yango makonzí ya kondima.Bokeseni kati na yango na makonzí ya Islam ezali ete makonzí ya Islam ezali misala oyo emonanaka oyo moto asalaka na polele , lokola kotatola Shahada, losambo, mpe zakat, mpe makonzí ya kondima ezali misala ya motema oyo moto asalaka kati ya motema na ye, lokola: kondima Nzambe, mikanda (babuku) na Ye, mpe bamemi-nsango na Ye.
Likanisi mpe ndimbola ya kondima: Ezali kondima makasi ya motema na Nzambe, na banzelu na ye, na mikanda na ye, na bamemi-nsango na ye, na Mokolo ya Nsuka, mpe na Destin Oyo ekokimelayo, bolamu na yango mpe na mabe na yango, mpe kolanda nyonso oyo Ntoma - Nzambe apambola ye mpe pesa ye kimia - azalaki kosala yango : maloba yalolemo, lokola koloba nzambe mosusu Azali te kaka Allah, kotanga Coran, Pe kokumisa na kozongisa lomuka epayi ya Nzambe.
Na Misala oyo emonanaka : lokola losambo, Hajj, kokanga Carême... mpe Ezali misala oyo ebombami, oyo etali motema, lokola bolingo ya nzambe mpe kobanga Ye, mpe kotiela Ye Elikia mpe komipesa epai na Ye (Allah).
Bato ya mayele balimbolaka yango na mokuse lokola: kondima na motema, koloba na monoko, mpe kosala misala nango, bondimi ebakisamaka na botosi mpe ekitaka na kozanga botosi.
Likonzí ya liboso: kondima Allah aza nzambi
Nzambe (Allah) Alobi:
{Bandimi bazali kaka baoyo bandimaka Nzambe}.
[Al-Nour: 62].
Kondima Nzambe esengi kondima bomoko na Ye nakati ya bokonzi naye, na Bonzambe naye, na Bankombo naye, mpe Bizaleli naye yalokumu, mpe esangisi makambo oyo elandi:
-Kondima bo zuami ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
- Kondima bo nkolo na Ye, Nkembo ezala na Ye, mpe ye azali Nkolo, Mozalisi, Mobateli, mpe Mokambi ya makambo nyonso.
- Kondima bonzambe na Ye, Nkembo ezala na Ye, Na abongi na losambo ye moko mpe azali na molongani te, naba adoration naye, moko na yango : lokola losambo, mabondeli, bilaka, mbeka, koluka lisalisi, koluka ekimelo, mpe misala misusu nyonso ya losambo.
- Kondima na ba kombo na ye ya kitoko mingi pe na bizaleli naye yalokomu oyo Ye a confirmaki pona ye moko to oyo Prophète na ye - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia - a confirmaki pona yango, pe kowangana oyo awanganaki pona ye moko to Prophète naye, Aboyaki yango , na bankombo ya nzambe mpe bizaleli Naye, bobongi Naye Pe epetolami,Na ezali na eloko moko te lokola Ye(Allah), mpe Ye azali Moyoki Nyonso, Momoni Nyonso.
Likonzí ya mibale: Kondima ba anzelu
Nzambe (Allah) Alobi:
“{Masanzoli ezala na Nzambe, Mozalisi ya Mapata mpe ya mabele, oyo asalaka ba anzelu lokola bamemi-nsango na mapapu, mibale to misato to minei Abakisaka na bozalisi oyo Ye alingi,Ete Nzambe azali na nguya likolo ya biloko nionso}.
[Al-Fatir: 1].
Tondimi ete ba anzelu bazali komonana te, mpe ete bazali basali ya Nzambe, oyo Ye akelaka uta na nour mpe akómisaki batosi mpe batosaka ye.
Bazali ekelamu monene,Pe bokasi n'a motango na bango ezingami na moto mosusu te bobele Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe moko na moko na bango azali na bandimbola, bankombo, mpe misala oyo Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso apesi bango Kati na bango ezali na Gabriel, kimia ezala likolo na ye, oyo apesameli mokumba ya emoniseli oyo Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atindaki epai ya bamemi-nsango na Ye.
Likonzí ya misato: kondima Ba buku naye
Nzambe (Allah) Alobi:
{Bolobá ete, To ndimeli Nzambe na oyo emonisami epai na biso, mpe oyo emonisamaki epai ya Abraham, mpe Ismaël, Isaac , mpe Jacob, Na mabota, mpe oyo epesamaki na Moïse mpe Jesus, mpe oyo epesamaki Na Mosakoli, kowuta na Nkolo na bango, Tosalaka bokeseni te kati ya moko na bango, pe tozali ba musulmans}.
[Al-Baqarah: 136].
Kondima makasi ete mikanda nyonso ya likoló ezali liloba ya Nzambe.
Mpe emonisami uta na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso epai ya bamemi-nsango na Ye epai ya basaleli na Ye na bosolo ya polele.
Mpe Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, na kotindaka Ntoma na ye Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia -atindamaki epai ya bato banso, alongolaki na mobeko na ye mibeko nyonso ya kala, mpe asaliki Coran Esantu ezala Na bokonzi likolo ya mikanda nyonso, mpe alongolaki yango azwaki bokebi ya kobatela Coran Esantu na mbongwana to babebisi nyonso, mpe Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi:
{Ya solo, ezali Biso nde tokitisaki Bokundoli,(Coran) mpe ya solo, Tokozala mobateli na yango}.
[Al-Hijr: 9]
;Pamba te Coran Esantu ezali buku ya suka ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso epai ya bato, mpe Ntoma na ye Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - azali ya nsuka kati na bamemi-nsango, mpe lingomba ya Islam ezali lingomba oyo Nzambe andimili bato, tii na Mokolo ya Kosambisama. Allah alobi boye:
{
Lingomba oyo Ezuami epayi ya Allah ezali Islam}.
[Al Imran: 19].
Mikanda ya Likolo oyo Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobeli na buku na Ye ezali:
Coran Esantu: Nzambe akitisaka yango epayi ya Prophète na ye Muhammad - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia.
Torahti: Nzambe atindaki yango epayi ya Prophète na ye Moïse, kimia ezala likolo na ye.
L'Évangile: Nzambe abimisi yango na Profeta naye Issa (Jesus), kimia ezala likolo na ye.
Zaburi (Psaumes): Nzambe abimisi yango na Profeta na ye David, kimia ezala likolo na ye.
Mikanda ya Abraham: Nzambe atindaka yango epayi ya Prophète na ye Abraham, kimia ezala likolo na ye.
Likonzí ya minei: Kondima na Bamemi-nsango
Nzambe (Allah) Alobi:
{Mpe Totindi mpenza momemi-nsango kati na bikólo nyonso, alobi ete: ‘Bósambela Nzambe mpe bómitia musika na tuaruti}.
[An-Nahl: 36].
Kondima makasi ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atindi na ekolo nyonso momemi-nsango kobenga bango mpo na kosambela Nzambe ye moko,Oyo zali namosangisi te, mpe kozanga kondima binzambi nzambi Oyo basambelaka bango sima ya nzambe , Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
Mpe ete bango nyonso bazali bato, bato oyo bazali basali ya Nzambe, mpe ete bazali bato ya solo, ya kotyela motema, ya kobanga Nzambe mpe ya kotyela motema, kotambwisama mpe kotambwisama Nzambe asungaki bango na makamwisi oyo elakisaki bosembo na bango, mpe ete bazwaki nyonso oyo Nzambe atindaki bango na yango , mpe ete bango nyonso bazalaki likolo ya bosolo ya polele mpe bokambi ya polele.
Bobengi (invitation) na bango uta ebandeli kino nsuka eyokanaka na ntina ya ebandeli ya lingomba, oyo ezali kotia bomoko ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso na losambo Naye mpe koboya kosangisa Ye.
Likonzí ya mitano: Kondima Mokolo ya Nsuka
Nzambe (Allah) Alobi:
{Allah, nzambe mosusu azali te kaka Ye, akosangisa bino esika moko kino mokolo ya lisekwa, na ntina na yango tembe ezali te}.
[An-Nisa: 87].
Kondima makasi na nionso oyo etali Mokolo ya Nsuka, oyo Nkolo na biso Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ayebisaki biso na Buku na Ye ya lokumu to Ntoma na biso Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - ayebisaka biso na ntina ya, liwa ya moto, lisekwa, Bolamuki, Na Intercession , Balance , Calcul, Paradis Na Lifelo, mpe makambo mosusu oyo etali Mokolo ya Nsuka.
Likonzí ya motoba: Kondima destin, bolamu na yango pe mabe na yango
Nzambe (Allah) Alobi:
{Ya solo, Tokelaki makambo nyonso na nzela ya mibeko (Destin)}.
[Al-Qamar: 49].
Bondimi ete makambo manso mazali koyela bikelamu na mokili oyo, ezali na boyebi Na Puissance ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe Eza na gestion Naye Moko, na molongani te, Na Destin wana eko mamaka liboso ya bokeli ya moto, mpe moto azali na bosepeli Na volonté ,Mpe asalaka misala na ye engebene na bosolo; Kasi nyonso wana ekweyi te libanda ya boyebi mpe mokano ya Nzambe.
Kondima destin etongami na nivo minei nayango:
Ya liboso: kondima boyebi Ya Nzambe oyo Esangisi makambo nyonso
Ya mibale: Kondima na bokomi (Destin) ya Nzambe ya nionso oyo ezali tii Mokolo ya Lisekwa.
Ya misato: Kondima na bolingo ya Nzambe oyo azali kosala malamu Na nguya ya kokoka, yango wana oyo nyonso alingi esalemaka mpe oyo alingi te esalemaka te.
Ya minei: Kondima ete Nzambe azali Mozalisi ya biloko nyonso mpe azali na moninga te na bozalisi na Ye.